Ebandi kosala: 7 sanza ya zomi na moko 2026
Mibeko oyo ezali oyo application Funda etalisaka na Profil > Mibeko ya bato nyonso. Etali mpe nzela ya Funda na WhatsApp mpe ba formulaire ya web.
Mobeko 1
Tofundaka likambo, moto te.
Epekisami na Funda
- Kotanga nkombo, kozwa foto to kofunda moto oyo ayebani
- Kotia ba adresse, ba numéro, ba plaque to ba sango ya moto
- Bililingi ya bato bazoki, makambo ya makasi to ya mpasi
- Eloko nyonso oyo esalelaka mwana mabe, emonisaka ye na ndenge ya pite to etiaka ye na likama
- Mayebisi ya lokuta, spam, publicité
Oyo modération esalaka
Masini etalaka liyebisi ntango etindami, ebombaka yango mwa ntango soki bato mingi bafundi yango, ebombaka yango mbala moko soki moto moko kaka afundi yango na ntina « Konyokola mwana moke », moto atalaka yango, mpe buku ya mikano ekoki kotangama soki boboyi mokano.
Funda ezwaka esika ya lisalisi ya mbalakaka te
Soki likama ezali sikoyo, bobenga liboso ba service ya urgence. Funda eyebisaka bato oyo bazali pene, esalaka likambo yango moko te.
Bitumbu na mokuse
Bitumbu emataka etape na etape:
- likebisi;
- sima ngonga 24 ya kotanga kaka: bokoki lisusu kotinda eloko te;
- sima mikolo 7 ya kopekisama;
- sima kobenganama.
Likambo ya makasi (konyokola mwana moke, kobangisa, kobenga bato na mobulu) ekoki komema mbala moko na kobenganama. Ata soki bozwi etumbu, bobatelaka carte, makebisi mpe nzela ya urgence.
Koboya mokano
Etumbu nyonso ekoki koboyama uta na application: Profil, sima etumbu oyo etali, sima « Koboya ». Moto akotala mokano yango lisusu.
Mpo na koyeba mingi:
- ndenge makambo etalamaka mpe bitumbu epesamaka: page « Modération »;
- oyo epekisami mpo na bana: page « Kobatela bana ».
Kofunda likambo moko ya mabe: bosalela bouton ya kofunda na likambo yango, to bokomela [À COMPLÉTER : e-mail de contact].