funda Lisanga ya bana mboka mpo na kosalisana mpe koyebisa makambo

Mibeko nyonso

Funda mpo na bato nyonso

Version 2 · Ezali kosala banda 7 nvb 2026

Oyo ebongwani

Texte disponible dans toutes les langues de l'application.

Ebandi kosala: 7 sanza ya zomi na moko 2026

Funda esengeli kosalisa bato nyonso, ata bato oyo bamonaka te to bamonaka malamu te, bato oyo bazali na mpasi ya kosimba écran, mpe bato oyo bazali na mpasi ya kotanga. Mokanda oyo etali application Funda mpo na iPhone mpe Android.

Oyo application endimaka

Minoko

Application ezali na français, lingelesi, lingala, swahili, mandarin mpe arabe. Arabe ekomamaka uta na loboko ya mobali kino na loboko ya mwasi. Makomi mosusu etikalaka na français: ba message ya WhatsApp ya Funda mpe makebisi ya ofisiele oyo équipe ekomaka.

Vidéo mpe mongongo

Funda ezali na vidéo te. Yango wana ezali na makomi na nse ya vidéo te mpe na bolimboli ya bilili na mongongo te.

Ndelo oyo eyebani

Koyebisa biso mpasi

Soki eteni moko ya Funda ekoki kosalelama na bino te, boyebisa biso. Bolakisa telefone na bino, masini ya kotanga écran to réglage oyo bosalelaki, mpe écran oyo etali.

Tokoyanola bino mpe, soki tokoki kobongisa yango mbala moko te, tokoluka elongo na bino nzela mosusu mpo na kozwa sango to service yango.

Ba version nyonso